Okobatela bikateli na ngai : okosangisa nzoto te ya banyama mibale ya lolenge mibale ekesana ; okolona mpe te na elanga na yo nkona mibale ekesana. Okolata te elamba oyo batongi na basinga mibale ekesana.
Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
Nzokande, nazali kobanga ete makanisi na bino ebeba mpe epengwisa bino mosika na nzela ya solo mpe ya peto na miso ya Klisto, ndenge nyoka ekosaki Eva na mayele na yango ya mabe.
Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo.