28 Soki mobali akutani na elenge mwasi, oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali te na mobali oyo alingi kobala ye, asangisi na ye nzoto na makasi, mpe bomoni bango ;
Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu.
Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye.
mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango ; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.