27 Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye.
Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu.
Bokosala likambo moko te epai ya mwana mwasi, pamba te asali lisumu moko te oyo ekoki komema ye na kufa. Likambo oyo ekokani na moto oyo abundisi moninga na ye mpe abomi ye.
Soki mobali akutani na elenge mwasi, oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali te na mobali oyo alingi kobala ye, asangisi na ye nzoto na makasi, mpe bomoni bango ;