26 Bokosala likambo moko te epai ya mwana mwasi, pamba te asali lisumu moko te oyo ekoki komema ye na kufa. Likambo oyo ekokani na moto oyo abundisi moninga na ye mpe abomi ye.
Soki mobali akoti na zamba na mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe asangisi na ye nzoto na makasi, nzokande mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, kaka mobali oyo asali likambo wana nde asengeli kokufa.
Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye.