Okobatela bikateli na ngai : okosangisa nzoto te ya banyama mibale ya lolenge mibale ekesana ; okolona mpe te na elanga na yo nkona mibale ekesana. Okolata te elamba oyo batongi na basinga mibale ekesana.
Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo : — Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala ; soki te, akopasola na pamba elamba ya sika mpe kitendi ya sika ekobalana te na elamba ya kala.