« Tala malako ya mibeko ya Yawe : Bosenga na bana ya Isalaele ete bamema epai na bino ngombe ya mwasi ya motane ezanga mbeba to litono mpe etikala nanu te komema ekangiseli.
Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo.
bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo.
Boye bino, bosala sik’oyo shario moko ya sika ; bozwa bangombe mibale ya basi oyo ezali komelisa mpe oyo nanu balatisi te ekangiseli na kingo. Bokangisa bangombe yango na shario, kasi bozongisa bana na yango na lopango.