Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 21:23 - Mokanda na Bomoi

23 ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 21:23
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, alongolaki elamba ya saki oyo alataki mpe atandaki yango na libanga ; avandaki wana, wuta na ebandeli ya tango ya kobuka bambuma ya orje kino na eleko oyo mvula enokelaki bibembe. Na moyi, apekisaki bandeke ya likolo kokita na likolo ya bibembe yango ; mpe na butu, abenganaki banyama ya zamba.


tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. Mokonzi alobaki : — Nakopesa bino bango.


Ntoma moko akomaki mpe alobaki na Jewu : — Bamemi mito ya bana mibali ya mokonzi. Bongo Jewu apesaki mitindo : — Botia yango na mipiku mibale na ekuke ya engumba kino na tongo.


Libota ya Isalaele bakosala basanza sambo mpo na kokunda bibembe na bango kolanda ndenge ekatama mpo na kopetola mokili.


Lokola mboka yango moko mpe ekomaki mbindo, napesaki yango mpe etumbu mpo na lisumu na yango ; bongo esanzaki bavandi na yango.


Yawe alobaki na Moyize : « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. »


Lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo na Saba, mpe lokola Saba yango ezalaki na tina makasi, Bayuda balingaki te ete bibembe etikala na ba-ekulusu na tango ya Saba. Boye, bakendeki kosenga epai ya Pilato ete apesa mitindo ya kobuka makolo ya bibembe oyo ezalaki na likolo ya ba-ekulusu mpe ya kolongola banzoto na bango.


Mpo na yango, eleki kutu malamu mpo na ngai kolakelama mabe mpe kokabwana na Klisto mpo na bandeko na ngai, bato ya ekolo na ngai,


Soki ezali na moto oyo alingaka Nkolo te, tika ete alakelama mabe ! Oh Nkolo, yaka !


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »


Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango.


Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.


Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama.


Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino.


Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa ; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ