Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 21:17 - Mokanda na Bomoi

17 Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 21:17
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso, makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai ; oleki na lokumu mpe na nguya.


Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize : — Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo. Elize azongisaki : — Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale.


Tata na bango apesaki bango bakado ebele ya palata, ya wolo, ya biloko ya talo ; apesaki bango lisusu bingumba batonga makasi kati na Yuda, kasi apesaki bokonzi epai ya Yorami mpo ete azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali.


Abomaki bana liboso nyonso kati na mokili na bango, bambuma ya liboso ya makasi na bango.


Leki alobaki na tata na ye : « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. » Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye.


tango akokabola bozwi na ye lokola libula epai ya bana na ye ya mibali ; akoki te kokomisa mwana ya liboso, mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka koleka na esika ya mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te.


Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise : Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ