Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 21:12 - Mokanda na Bomoi

12 Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 21:12
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.


Na mokolo ya sambo, akokata lisusu bapwale na ye, suki na ye ya moto mpe ya miso, mandefu na ye mpe bapwale nyonso mosusu ; akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi. Na bongo, akozala peto.


Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama.


Kasi mwasi nyonso oyo asambelaka to asakolaka, wana moto na ye ezali polele, ayokisaka mokonzi na ye soni, pamba te azali lokola mwasi oyo bakokola suki.


Mwasi oyo alataka kitambala te na moto na ye asengeli kokokola suki na ye. Kasi soki ezali soni mpo na mwasi kokatisa to kokokola suki, ekoleka malamu mpo na ye kolata kitambala na moto na ye.


mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,


soki bomoni mwasi ya kitoko kati na bango mpe moko kati na bino asepeli na ye, akoki solo kobala ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ