9 Bongo tango bakonzi ya basoda bakosilisa koloba na mampinga, bakopona bakonzi mpo na kokamba mampinga.
Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye ; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama.
Tango bokokende kobundisa engumba moko, boyebisa bato ya engumba yango ete bamipesa bango moko na maboko na bino na kimia.
Bakonzi ya basoda bakoloba lisusu : « Ezali na moto oyo azali kobanga to alembi nzoto ? Tika ete azonga na ndako mpo ete alembisa te baninga na ye na bitumba. »