8 Bakonzi ya basoda bakoloba lisusu : « Ezali na moto oyo azali kobanga to alembi nzoto ? Tika ete azonga na ndako mpo ete alembisa te baninga na ye na bitumba. »
Sima na bango komata na lubwaku ya Eshikoli mpe komona mokili yango, balembisaki mitema ya bana ya Isalaele oyo balingaki kokota na mokili oyo Yawe apesaki bango.
Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.
Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »
Yango wana, loba na bato oyo : ‹ Tika ete moto nyonso oyo azali kolenga na kobanga azala mosika ya ngomba Galadi mpe azonga epai na ye. › » Boye, bato nkoto tuku mibale na mibale bazongaki epai na bango mpe nkoto zomi batikalaki.