7 Ezali na moto oyo awuti kotuna mwasi na libala mpe abali nanu te ? Tika ete azonga na ndako, noki te akoki kokufa na bitumba mpe moto mosusu akoya kobala mwasi oyo ye atunaki na libala. »
Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu.
Ezali na moto oyo awuti kolona elanga ya vino mpe nanu abuki bambuma ya liboso te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kozala moto ya liboso mpo na kobuka mbuma ya liboso na elanga na ye.
Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.
Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te.