Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya mirie, na tango wana nde okobima mbala moko mpo na kobunda ; pamba te ekolakisa ete Nzambe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. »
Tala, Nzambe azali elongo na biso lokola Motambolisi ; Banganga-Nzambe na Ye bakobeta kelelo na lokito makasi mpo na kotelemela bino. Bana ya Isalaele, bobundisa te Yawe, Nzambe ya batata na bino, pamba te bokolonga ata moke te. »
Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »
Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.