Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 20:20 - Mokanda na Bomoi

20 Kasi okoki nde kokata banzete oyo oyebi ete ebotaka mbuma te mpo na kosala na yango bibundeli kino engumba yango ekokweya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 20:20
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokobuka bingumba na bango nyonso oyo batonga makasi mpe bingumba nyonso ya minene, bokokata banzete na bango nyonso ya kitoko, bokokanga bitima nyonso ya mayi mpe bokobebisa bilanga nyonso na mabanga. »


Asalisaki kati na Yelusalemi, epai ya bato ya mayele, bamashini mpo na kotia yango likolo ya bandako milayi mpe na suka ya bamir mpo na kobwaka makonga mpe mabanga minene. Kombo na ye ekendeki sango, pamba te asungamaki makasi kino kokoma moto na nguya.


ezalaki na engumba moko ya moke oyo ezalaki mpe na bato moke ; bongo mokonzi moko ya nguya ayaki kobundisa yango, azingelaki yango mpe atongaki milako mpo na kokonza engumba yango.


Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi ya Asiri : ‹ Akokota na engumba oyo te, akobeta kuna ata mbanzi moko te, akobundisa yango na banguba te mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango mpo na komibomba.


Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama zingazinga ya Yelusalemi ! Engumba oyo esengeli kozwa etumbu, pamba te etondi na makambo mabe !


Faraon elongo na ebele ya basoda na ye ya mpiko mpe basoda na ye mosusu ebele bakokoka kosunga ye te na tango ya bitumba ; tango bato ya Babiloni bakotonga bamir ya zelo mpo na kobatamela mpe bakotimola mabulu mpo na koboma bato ebele.


Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »


Tango okobundisa engumba moko tango molayi mpo na kobotola yango, okoki kosimba epasola te mpo na kokata banzete ya engumba yango, pamba te okoki kolia bambuma na yango ; kokata yango te. Boni, banzete ekomi bato mpo ete obundisa yango ?


Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ