Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 20:18 - Mokanda na Bomoi

18 mpo ete bateya yo te kosala makambo nyonso ya nkele oyo bango basalaka mpo na lokumu ya banzambe na bango ; noki te okosala masumu liboso ya Yawe, Nzambe na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 20:18
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na nzambe Bala mpe atelemisaki likonzi mpo na nzambe mwasi Ashera, ndenge Akabi, mokonzi ya Isalaele, asalaki ; afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo.


Bokosala boyokani te elongo na bango mpe elongo na banzambe na bango.


Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. »


Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili oyo bozali kokende, noki te bakokoma motambo kati na bino !


mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango.


Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »


Yango wana, « Bobima kati na bango mpe bokabwana na bango, elobi Nkolo ; bosimba eloko moko te ya mbindo, mpe ngai nakoyamba bino. »


Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa.


Soki moto aboyi koyoka maloba na Ngai, oyo mosakoli yango akoloba na Kombo na Ngai, Ngai moko nakopesa ye etumbu.


Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo, okomekola te misala ya mbindo ya bikolo oyo ezali kuna.


Bebisa bango nyonso : bato ya Iti, bato ya Amori, bato ya Kanana, bato ya Perizi, bato ya Evi mpe bato ya Yebusi, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo


Tango okobundisa engumba moko tango molayi mpo na kobotola yango, okoki kosimba epasola te mpo na kokata banzete ya engumba yango, pamba te okoki kolia bambuma na yango ; kokata yango te. Boni, banzete ekomi bato mpo ete obundisa yango ?


Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi.


Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.


mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.


boyeba ete Yawe, Nzambe na bino, akobengana lisusu te bikolo yango liboso na bino. Bakokoma nde minyama mpe mitambo mpo na bino, bafimbu na mikongo na bino mpe banzube kati na miso na bino, kino tango bokosila kokufa na mokili ya kitoko oyo Nzambe na bino apesaki bino.


Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ