Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 20:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi mpo na bingumba ya bikolo oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo lokola libula, kotika ata eloko moko te na bomoi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 20:16
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso ; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye.


Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali ;


bokobengana bato nyonso oyo bavandaka na mboka yango, bokosilisa kobuka banzambe nyonso ya bikeko oyo basala na mabanga, na bibende banyangwisa na moto mpe bokobebisa bisambelo na bango nyonso ya likolo ya bangomba.


Ezali ndenge wana nde bokosala bingumba nyonso oyo ezali mosika na bino, bingumba oyo ezali te kati na mokili oyo bokozwa.


Bebisa bango nyonso : bato ya Iti, bato ya Amori, bato ya Kanana, bato ya Perizi, bato ya Evi mpe bato ya Yebusi, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo


boye mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye na libala, akoki lisusu te kozongisa ye na libala, pamba te mwasi yango akomi mbindo liboso na ye : kozongisa ye lisusu na libala ezali likambo ya nkele na miso ya Yawe. Boyeisa lisumu te na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.


Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino.


Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.


Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.


Tango Jozue mpe bana ya Isalaele balongaki bango mpe basilisaki koboma bango, ndambo ya bato oyo babikaki bakimaki mpe bakotaki na bingumba oyo etongama makasi.


Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko.


Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.


Bana ya Isalaele bazwaki mpo na bango lokola bomengo ya bitumba : biloko nyonso ya engumba wana mpe bibwele na yango, kasi basilisaki koboma bato nyonso na mopanga, batikaki ata moto moko te na bomoi.


Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe.


Motango ya bato nyonso oyo bakufaki na mokolo wana, basi mpe mibali, ezalaki nkoto zomi na mibale : bango nyonso bazalaki bato ya Ayi.


Tango bokobotola engumba, botia yango moto mpe bosala ndenge Yawe alobaki. »


Bazongiselaki Jozue : — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo.


Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.


Bato ya Isalaele balobaki na bato ya Evi : — Tango mosusu bozalaka kaka pembeni na biso ! Ndenge nini tosala boyokani elongo na bino ?


Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ