Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 20:11 - Mokanda na Bomoi

11 Soki bandimi mpe bafungoli bikuke na bango, bokosalisa bato nyonso ya engumba wana misala makasi mpe bakosalela bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 20:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye.


Elize azongisaki : — Koboma bango te ! Boni, okoboma solo bato oyo okangi, na nzela ya mopanga na yo to ya tolotolo na yo ? Pesa bango nde bilei mpe mayi ya komela mpo ete balia, bamela mpe bazonga epai ya mokonzi na bango.


Ngai, nazali moto ya kimia ; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba.


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Tango bokokende kobundisa engumba moko, boyebisa bato ya engumba yango ete bamipesa bango moko na maboko na bino na kimia.


Kasi soki baboyi kosala kimia elongo na bino mpe babundisi bino, bobundisa engumba wana.


Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu.


Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona.


Bazongiselaki Jozue : — Tozali basali na yo. Kasi Jozue atunaki bango : — Bozali banani mpe bowuti wapi ?


Bazongiselaki ye : — Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito


Tango bana ya Isalaele bakomaki lisusu makasi, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi, kasi babenganaki bango nyonso te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ