Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 2:9
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, tala bato ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi ya etuka ya bangomba Seiri, ba-oyo na tina na bango, tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, opekisaki bana ya Isalaele kobotola mokili na bango ; mpe mpo na yango, balekaki pembeni-pembeni ya mokili na bango mpe babomaki bango te !


Gebali, Amoni mpe Amaleki, bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.


Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi : Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko ! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ; solo, ebebisamaki kaka na butu moko !


mpe nzela ya miluka ya mabwaku oyo ekenda kino na engumba Ari mpe elekela pembeni-pembeni ya mondelo ya Moabi. »


Moto ebimaki wuta na Eshiboni, ndemo ya moto ebimaki wuta na engumba ya Sikoni, etumbaki Ari ya Moabi, bavandi ya bangomba ya Arinoni.


Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani : « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. » Na tango wana, ezalaki Balaki, mwana mobali ya Tsipori, nde azalaki mokonzi ya Moabi.


ndenge bakitani ya Ezawu, oyo bavandaka na mokili ya Seiri, mpe bato ya Moabi, oyo bavandaka na Ari, basalelaki biso kino tokatisaki Yordani mpe tokotaki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. »


Bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango, ezala ata esika ya kotia lokolo na bino. Nasila kopesa, epai na Ezawu, etuka ya ngomba Seiri lokola libula na ye.


— Tala maloba oyo Jefite alobi : « Bana ya Isalaele bazwaki mokili ya Moabi te to mokili ya bato ya Amoni te.


Batindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi, mpo na koloba na ye : ‹ Pesa biso nzela ya koleka na mokili na yo. › Kasi mokonzi ya Edomi aboyaki koyoka. Bana ya Isalaele batindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya Moabi, kasi ye mpe aboyaki. Boye, bana ya Isalaele bawumelaki na Kadeshi.


Na sima, batambolaki na esobe mpe babalukaki na sima ya mokili ya Edomi mpe ya Moabi, balekaki na ngambo ya este ya mokili ya Moabi mpe batongaki milako na bango kuna, na ngambo mosusu ya lubwaku ya Arinoni. Kasi bakotaki te na mokili ya Moabi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ