4 Pesa mitindo oyo epai ya bato : ‹ Bokomi pembeni ya koleka mokili ya bandeko na bino, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Bakobanga bino, kasi bozala mayele.
Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »
Kobanga mpe somo ekweyeli bango. Na nguya ya loboko na Yo, bakomi bababa lokola libanga kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, kino bato oyo osikolaki balekaki.
Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili