37 Kasi bopusanaki te na mokili ya bato ya Amoni, na ngambo nyonso ya lubwaku ya Yaboki, na bingumba ya bangomba, mpe na bisika nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, apekisaki biso.
Kasi Isalaele alongaki ye mpe akamataki mokili na ye wuta na Arinoni kino na Yaboki, mpe lisusu kino na mokili ya bato ya Amoni, mpo ete bazalaki kokengela mondelo yango makasi.
Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
Bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango, ezala ata esika ya kotia lokolo na bino. Nasila kopesa, epai na Ezawu, etuka ya ngomba Seiri lokola libula na ye.
Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
Kasi epai ya mabota ya Ribeni mpe ya Gadi, napesaki etando oyo ebanda wuta na Galadi, ekenda na lubwaku ya Arinoni mpe esalaki mondelo kino na ebale ya Yaboki oyo esalaki mondelo na mokili ya Amoni.
Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni. Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni.