Deteronomi 2:34 - Mokanda na Bomoi34 Bongo, tobotolaki bingumba na ye nyonso, tobukaki bingumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana nyonso ; totikaki ata moto moko te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.
Bazongiselaki Jozue : — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo.