Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › »
Yawe alobaki : « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango.
Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.