27 Nalobaki : « Tobondeli yo, tika biso tolekela na mokili na yo. Tokoleka kaka na nzela ya monene, tokobaluka te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to ya mobali.
Bongo bana ya Isalaele batindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni mpo na koloba na ye : ‹ Tika biso toleka na mokili na yo mpo ete tokende na esika na biso. ›