Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 2:25 - Mokanda na Bomoi

25 Lelo, nakosala ete mabota nyonso ya mokili ezala na somo mpe kobanga liboso na bino. Bakoyoka sango ya makambo oyo bokosala, bongo bakolenga mpe bakozanga kimia likolo na bino. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 2:25
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi.


Kombo ya Davidi ekendeki sango na mokili mobimba mpe Yawe asalaki ete bikolo nyonso ebanga Davidi.


Ejipito esepelaki komona bango kobima, pamba te somo ya Isalaele ekangaki bango.


Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima.


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Mpe bato ya Moabi bakomaki kobanga makasi mpo ete bana ya Isalaele bazalaki ebele penza. Boye, bakomaki na somo mingi liboso ya bana ya Isalaele.


Moto moko te akolonga kotelemela bino. Ndenge Yawe Nzambe alakaki bino, akotia somo mpe kobanga kati na mokili mobimba, na esika nyonso oyo bokokende.


Bongo bato nyonso ya mokili bakomona ete bozali penza bato ya Yawe mpe bakobanga bino.


Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi ; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba.


Bazongiselaki Jozue : — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ