Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 2:24 - Mokanda na Bomoi

24 Yawe alobaki : « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 2:24
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda. Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende ; pamba te Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye ! › »


« Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.


Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.


Napesi epai ya Nabukodonozori mokili ya Ejipito lokola lifuti mpo na misala na ye, pamba te ye mpe mampinga na ye basalaki mpo na Ngai, elobi Nkolo Yawe.


atiaki na se ya bokonzi na yo bato nyonso ya mokili, banyama ya zamba mpe bandeke ya likolo ; atiaki yo mokonzi na bango nyonso, na bisika nyonso oyo bavandaka ! Ezali yo nde ozali moto wana ya wolo.


Belitsatsari azongisaki : — Nkolo na ngai, tika ete ndoto oyo ezala mpo na bayini na yo, mpe ndimbola na yango, mpo na banguna na yo !


Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na lubwaku ya Zeredi.


Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso.


Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato : — Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ