Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi : Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, solo, ebebisamaki kaka na butu moko ! Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ; solo, ebebisamaki kaka na butu moko !
Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na ngambo mosusu ya Arinoni, mayi oyo elekela na esobe, wuta na etuka ya mokili ya bato ya Amori. Mayi ya Arinoni ezalaki na mondelo ya Moabi, na kati-kati ya mokili ya Moabi mpe ya Amori.
Kasi Sikoni aboyaki kopesa bana ya Isalaele nzela ya kolekela na mokili na ye ; asangisaki mampinga na ye nyonso ya basoda mpe abimaki na esobe mpo na kobundisa Isalaele. Abundisaki Isalaele tango akomaki na Yakatsi.
Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. »
Na sima, batambolaki na esobe mpe babalukaki na sima ya mokili ya Edomi mpe ya Moabi, balekaki na ngambo ya este ya mokili ya Moabi mpe batongaki milako na bango kuna, na ngambo mosusu ya lubwaku ya Arinoni. Kasi bakotaki te na mokili ya Moabi.