Wana babimaki na engumba, bamikomelaki nanu mosika te, Jozefi alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Telema, landa bato wana ! Mpe tango okokanga bango, tuna bango : mpo na nini bozongisi mabe na malamu ?
Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango.
Tala mpo na nini Jozue asengelaki kokata bango ngenga : Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito mpe bakokisaki mibu ya kobunda bitumba bakufaki na nzela, kati na esobe, sima na bango kobima na Ejipito.