Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 2:15 - Mokanda na Bomoi

15 Loboko ya Yawe ebalukelaki bango kino asilisaki koboma bango nyonso kati na molako.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 2:15
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Asembolaki loboko, alapaki ndayi ya koboma bango kati na esobe,


Butu mpe moyi, loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai ; makasi na ngai ekomaki kosila ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.


Boye, asukisaki mikolo ya bomoi na bango lokola mopepe, mpe mibu na bango ya mbotama kati na somo.


Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika lokola matiti ya mobesu ; loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye.


Yebisa bango : « Nalapi ndayi, » elobi Yawe, « nakosalela bino makambo nyonso oyo nayoki bino koloba.


Nzokande, Nzambe asepelaki te na mingi kati na bango ; solo, babomaki bango kati na esobe.


Atako boyebi malamu makambo oyo nyonso, kasi nalingi kaka koyebisa bino lisusu ete Nkolo akangolaki bato na Ye na bowumbu kati na Ejipito, kasi, sima na yango, abomaki ba-oyo bazalaki na kondima te.


Tango nyonso bana ya Isalaele bazalaki kokende bitumba, loboko na Yawe ezalaki kotelemela bango mpo ete balonga te, ndenge kaka alapaki ndayi mpo na bango. Boye bazalaki na pasi makasi.


Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango : — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango ; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango.


Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu.


Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango : Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo.


Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ