Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ;
Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato ; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi.
Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito.