8 Soki Yawe, Nzambe na bino, ayeisi monene mokili na bino ndenge alakaki epai na bakoko na bino na nzela ya ndayi mpe apesi bino mokili mobimba ndenge alakaki bango,
Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.
Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino.
Mpo na bolamu na yo, nakobengana bikolo liboso na yo mpe nakoyeisa mokili na yo monene. Moto moko te akoluka kobotola mokili na yo tango okobanda komata mbala misato na mobu, mpo na kokutana na Yawe, Nzambe na yo.
Tango Yawe, Nzambe na bino, akokomisa mokili na bino monene ndenge alakaki bino mpe tango bokozala na posa ya kolia mosuni mpe bokoloba : « Nazali na posa ya kolia mosuni, » bokolia yango ndenge bolingi.