Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 19:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye : ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 19:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi amonaki lisusu ete ezaleli ya Labani epai na ye etikalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso.


Mwasi alobaki : — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. Mokonzi alobaki : — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele.


Na kala, ezala na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe, Nzambe na yo, alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › »


Babongisaki wuta kala Tofeti, babongisaki yango nde mpo na mokonzi ; basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo nde ekopelisa yango.


Bingumba yango ekozala ekimelo mpo na bino liboso ya mobukanisi makila ; na bongo mobomi akokufa te soki asambi nanu te na miso ya lisanga.


Bokosala kuna banzela mpe bokokabola na biteni misato, mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto akoka kokima kuna.


Ndakisa : moto oyo akei na zamba elongo na moninga na ye mpo na kokata banzete ; bongo na tango atomboli loboko na ye mpo na kokata nzete, ebende ya epasola elongwe na esimbelo na yango, ekweyeli moninga wana mpe ebomi ye : moto wana akoki kokima kati na moko ya bingumba wana mpo na kobikisa bomoi na ye.


Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma.


mpo ete moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nko te, na kozanga koyina ye liboso, akoka kokimela na moko kati na bingumba yango mpe akoka kobikisa bomoi na ye.


Bongo bokoyeba nzela nini bokoki kolanda mpo ete nanu botambola na nzela yango te. Kasi bozala mosika na Sanduku ya Boyokani, na bametele pene nkoto moko, bopusana pene na yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ