16 Soki motatoli ya lokuta atelemi mpo na kofunda moto mosusu ete moto wana abomi moto ;
Kotika te ete nakangama na motambo ya bayini na ngai, pamba te batatoli ya lokuta batelemi mpo na kokosela ngai makambo, bazali kobimisa maloba mabe.
Batatoli oyo bamipesa na kanza batelemi, bazali kopesa ngai mituna na tina na makambo oyo nayebi te.
Motatoli ya sembo akosaka te, kasi motatoli ya mabe alobaka lokuta.
Motatoli ya lokuta akozwa etumbu ; moto oyo akosaka akozanga te kozwa etumbu.
Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki : — Moto oyo azali kotika te koloba mabe mpo na kobebisa lokumu ya esika oyo ya bule mpe ya mibeko ;
Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.