Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 19:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 19:10
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi apesaki ye mitindo : — Sala ndenge alobi ; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba.


Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe.


bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye.


Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa bomoi ya moto ya sembo mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa.


Kodongola, lolemo ya lokuta, maboko oyo ebomaka moto oyo asali mabe te,


Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa makila ya moto oyo asali mabe te. Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango.


Bongo, babelelaki Yawe : « Oh Yawe, tobondeli Yo, koboma biso te likolo ya moto oyo. Kotika te ete makila ya moto oyo asali mabe te etangama na mito na biso. Pamba te ezali solo Yo Yawe nde osali oyo olingaki. »


Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.


Boyokela ye mawa te. Na nzela wana nde bokolongola kati na Isalaele mabe ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te, mpo ete bozala malamu.


Tango bokokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, tango bokozwa yango mpe bokovanda kuna,


Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula.


Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ