Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 18:6 - Mokanda na Bomoi

6 Soki moko kati na Balevi alongwe na engumba moko kati na bingumba ya Isalaele epai wapi azalaki kovanda, mpe ayei ndenge motema na ye elingi, na esika oyo Yawe Nzambe akopona ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 18:6
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, nasepelaka na Tempelo epai wapi ovandaka elongo na nkembo na Yo.


Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe, eloko moko kaka oyo nasengaka makasi : nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe, mikolo nyonso ya bomoi na ngai, mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.


Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala ! Tala elongi ya mopakolami na Yo !


Esengo na bavandi ya Ndako na Yo ! Bakokumisa Yo tango nyonso !


Na libanda ya engumba, bokozwa etando ya bametele pene nkoto moko na ngambo ya este, nkoto moko na ngambo ya weste, nkoto moko na ngambo ya nor mpe nkoto moko na ngambo ya sude ; mpe engumba ekozala na kati-kati. Yango nde ekozala mabele na bango ya zingazinga.


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Bokobonza bambeka yango kaka na esika oyo Yawe akopona kati na moko ya bikolo na bino, mpe kuna kaka nde bokosala makambo nyonso oyo natindi bino.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


Tala biloko oyo okobonza lokola mbeka ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe ntaba ya mwasi.


asengeli kosala na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ndenge bandeko na ye nyonso Balevi bazali kosala kuna na miso ya Yawe.


Tala liloba oyo ezali penza ya solo : Moto nyonso oyo alingi kozala mokambi kati na Lingomba aponi mosala ya kitoko.


Lokola babateli bibwele, bobatelaka malamu etonga oyo Nzambe apesi bino mokumba ya kokamba. Bosalaka bongo kolanda mokano ya Nzambe : na kotindika te, kasi na komipesa mobimba ; na makanisi te ya konduka mbongo, kasi na posa makasi ya kosalela bango ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ