Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 18:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tala eteni oyo Banganga-Nzambe basengeli kozwa epai na bato oyo bakobonza ngombe to meme lokola mbeka : lipeka, mbanga mpe biloko ya kati. Okopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 18:3
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okobulisa biteni ya libulisi mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali : tolo mpe mopende ya meme oyo batombolaki mpo na kobonzela Yawe.


Biteni yango ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali lokola mobeko ya libela na libela. Pamba te ezali makabo ya bana ya Isalaele mpo na Yawe, makabo oyo ekowuta na mbeka na bango ya boyokani.


Akokoma peto tango moyi ekolala mpe sima na yango nde akoki kolia makabo ya bule, pamba te ezali bilei na ye.


Tala lisusu biloko oyo ekozala mpo na yo : biloko nyonso oyo bakobonza kati na makabo oyo ekowuta na maboko ya bana ya Isalaele. Napesi yango epai na yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola mobeko ya libela na libela. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto akoki kolia yango.


Napesi yo mafuta nyonso ya olive oyo eleki kitoko, vino ya sika mpe ble oyo bapesi epai na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na bango.


Bokotumba mosuni mpe makila ya bambeka na bino ya kotumba na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bokosopa makila ya bambeka na bino mosusu na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino ; kasi mpo na mosuni na yango, bokoki na bino kolia yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ