Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 18:22 - Mokanda na Bomoi

22 Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 18:22
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mishe alobaki : — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! Abakisaki : — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi !


Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »


Ndenge ndeke ya moke oyo babengaka mwano ekendaka bipai na bipai to mbilambila epumbwaka-pumbwaka, ndenge wana mpe elakeli mabe ezwaka te moto oyo asali na ye mabe te.


« Boya na banzambe na bino ya bikeko mpo ete eyebisa biso makambo oyo ekoya. Boyebisa biso masakoli na bino ya liboso, ezalaki nini, mpo ete toyekola yango malamu mpe toyeba ndenge nini esukelaki. To boyebisa biso makambo oyo ekoya ;


Yona abandaki mosala na ye, atambolaki mokolo mobimba kati na engumba ; azalaki kosakola : — Etikali mikolo tuku minei mpo ete engumba ya Ninive ebebisama nye !


Asambelaki Yawe : — Oh Yawe ! Ezali te makambo ya boye nde nazalaki komilobela tango nazalaki epai na ngai ? Yango wana nasalaki na ngai mobembo na Tarsisi mpo na koluka kokima, pamba te nayebaki malamu ete ozali Nzambe ya ngolu mpe ya mawa, osilikaka noki te mpe otonda na bolingo, obongolaka makanisi na Yo ya kosala bato mabe.


Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.


Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye.


Tango mosusu bokoki komituna : ‹ Ndenge nini tokoki koyeba ete maloba oyo azali koloba ewuti solo epai na Yawe te ? ›


Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ