Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.
Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye.
Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. »