17 Yawe alobaki na ngai : « Makambo oyo balobi ezali malamu.
Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi ; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.
Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, mpe ngai natiaki moto makasi te ; namizongisaki sima te.
Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.
Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.
Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye ? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso.
Yawe ayokaki bino tango boyebisaki ngai mpe alobaki na ngai : « Nayoki makambo oyo bato oyo balobi na yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu.