Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 18:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bikolo oyo bokobotola ezali bikolo oyo elandaka bato wana, esalelaka kindoki mpe soloka. Kasi mpo na bino, Yawe, Nzambe na bino, akoki te kopesa bino nzela ya kosala bongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 18:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki na ye na ndoto : — Solo, nayebi ete osali yango na motema sembo. Yango wana nabatelaki yo mpo ete osala lisumu te epai na Ngai, mpe natikaki te ete osimba ye.


Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe.


Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.


Boye, boyokela te basakoli na bino, bato na bino ya soloka, bato na bino oyo balimbolaka bandoto, bato na bino oyo basololaka na bakufi, oyo bazali koloba na bino ete bosalela mokonzi ya Babiloni te.


Daniele azongisaki liboso ya mokonzi : — Bato ya bwanya, bato ya mayele ya mabe, banganga-kisi mpe bato oyo bayebaka makambo oyo ekoya bazali na makoki te ya koyebisa mokonzi mabombami oyo azali kotuna ;


nakobebisa banzambe ya bikeko oyo ezali kati na yo, mpe okofukamela lisusu te bikeko oyo maboko na yo esilaki kosala ;


Na tango ya kala, Nzambe atikaki ete bato ya bikolo nyonso balanda nzela oyo bango moko balingi.


Moto moko te kati na yo akobonza na moto mwana na ye ya mobali to ya mwasi epai ya moto oyo asalelaka soloka, kindoki, oyo atalaka minzoto mpo na kosakola makambo, oyo asalelaka maji


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ