Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 18:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bosengeli kozala bato bazangi pamela liboso ya Yawe, Nzambe na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 18:13
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.


Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.


Tika ete mitema na bino ezala sembo epai na Yawe, Nzambe na biso, mpo ete botambola kolanda mibeko na Ye mpe bobatela malako na Ye ndenge bosali yango na mokolo ya lelo. »


Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.


Yawe alobaki na Satana : — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe.


Tala malamu moto oyo azangi pamela, landela bomoi ya moto ya sembo ; tango oyo ezali koya ezali kozela moto ya kimia.


Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.


Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai.


Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino.


Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe.


Lamuka ! Lendisa bato oyo batikali mpe ba-oyo bakomi pene ya kokufa, pamba te namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ