Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? »
Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. »
Nakotombokela lisusu bato nyonso oyo balandaka moto oyo asololaka na bakufi mpe banganga-kisi mpo na kosalela banzambe ya bikeko. Nakolongola bango kati na bato na bango.
Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.