Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 18:1 - Mokanda na Bomoi

1 Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi, elongo na libota mobimba ya Balevi basengeli te kozwa eteni ya mabele to libula kati na Isalaele ; basengeli kobika kaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe mpe na libula na Ye, pamba te yango nde ezali libula na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 18:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Banganga-Nzambe oyo bazali bakitani ya Levi bakozalaka tango nyonso na bakitani oyo bakobanda kotelema tango nyonso liboso na Ngai mpo na kotumba mbeka, kobonza mbeka ya gato mpe kobonza makabo. › »


Tala oyo ekozala libula ya Banganga-Nzambe : Ngai moko nde nazali libula na bango. Bokopesa bango mabele te kati na Isalaele ; Ngai moko nde nakozala mabele na bango.


Yawe alobaki na Aron : « Okozwa eteni ya mabele te kati na mokili na bango, mpe okozwa ata bomengo moko te lokola libula kati na bana ya Isalaele, pamba te Ngai moko nde nazali bomengo mpe libula na bino kati na bana ya Isalaele.


Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango.


Yango wana, bana ya Levi bazali na ndambo ya mabele te to libula te kati na bandeko na bango : Yawe nde azali libula na bango, ndenge Yawe, Nzambe na bino, alobaki na bango.


Tango nyonso bokovanda kati na mokili na bino, bosala keba ete bobosana Balevi te.


Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango.


Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango.


Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ