Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 17:8 - Mokanda na Bomoi

8 Soki makambo oyo eleki yo makasi mpo na kosambisa ekomi na bisambiselo na yo, makambo lokola koboma bato, kowelana, kozokisa bato, mema yango na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 17:8
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi azalaki kolamuka na tongo makasi mpe azalaki kokende kotelema pembeni ya nzela oyo ekenda na ekotelo ya engumba. Bongo, tango nyonso moto azalaki koleka mpo na kokende epai ya mokonzi mpo ete akatela ye likambo, ye Abisalomi azalaki kobenga ye mpe kotuna ye : — Ozali moto ya engumba nini ? Soki moto yango azongisi : — Mosali na yo azali moto ya moko kati na bikolo ya Isalaele.


Mpo na bakitani ya Yitseari : Kenania mpe bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakomi mikanda mpe basambisi. Bazalaki na mokumba ya kotala makambo ya boyokani ya Isalaele na bikolo mosusu.


Moyize azongiselaki ye : — Bayaka epai na ngai mpo na kotuna toli ya Nzambe.


Bazalaki tango nyonso kati na bato mpo na kosambisa bato mpe kokata makambo ; bazalaki kokata bango moko makambo ya mike, kasi bazalaki komema oyo ya minene epai ya Moyize.


Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, bongo mowumbu yango akufi na mbala moko, moto wana asengeli kozwa etumbu.


Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi.


Soki ngombe ebomi moto na maseke, basengeli koboma ngombe yango na mabanga, mpe bakolia mosuni na yango te ; nzokande nkolo na yango akozwa etumbu te.


Kasi soki makambo yango esalemi na moyi, moto oyo akoboma ye akozwa etumbu mpo na makila oyo esopani. Moyibi nyonso asengeli kozongisa biloko oyo ayibi. Soki azali na eloko te, bakoteka ye mpo na kofuta eloko oyo ayibaki.


Na likambo nyonso ya moyibi, soki bato mibale bazali kowela ngombe, ane, meme, elamba to eloko nyonso oyo ebungaki, bongo moto na moto azali koloba : ‹ Ezali ya ngai ! › bango mibale bakomema likambo na bango liboso ya basambisi ; bongo moto oyo basambisi bakokweyisa akozongisa yango mbala mibale epai ya moninga na ye.


Na tango ya matata, Banganga-Nzambe bakotelema lokola basambisi mpo na kokata makambo kolanda mibeko, bakotosa mibeko mpe bikateli na Ngai, bafeti na Ngai, oyo ekatama mpe bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.


« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tuna Banganga-Nzambe makambo oyo osengeli kosala kolanda mobeko :


Pamba te bibebu ya Nganga-Nzambe esengeli kobatela boyebi, mpe bato basengeli kozwa boyebi na monoko na ye mpo ete azali ntoma ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.


bokopona bingumba ya kokimela mpo ete moto oyo akoboma moto na nko te akoka kokima kuna.


Soki abeti moninga na ye libende, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye.


Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. »


Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe.


Bokobonza bambeka yango kaka na esika oyo Yawe akopona kati na moko ya bikolo na bino, mpe kuna kaka nde bokosala makambo nyonso oyo natindi bino.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


bato nyonso mibale oyo bazali kowelana bakotelema na miso ya Yawe liboso ya Banganga-Nzambe mpe basambisi oyo bazali kosala mosala kati na bino na tango wana.


Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye : ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso.


Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana ; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali.


Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango : bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ