Deteronomi 17:7 - Mokanda na Bomoi7 Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.
bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye ; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.