18 Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko.
Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ;
Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »
Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, alobaki na Shafani, mokomi mikanda : — Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe. Ilikia apesaki buku yango epai ya Shafani, mpe Shafani atangaki yango.
Boye Moyize akomaki mibeko oyo mpe apesaki yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe epai ya bampaka nyonso ya Isalaele.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.