Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 17:11 - Mokanda na Bomoi

11 Okosala kolanda mobeko oyo bakoteya yo mpe bikateli oyo bakopesa yo. Kokende libanda te ya bikateli oyo bakopesa yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 17:11
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi atunaki : — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso ? Mwasi azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.


Kotengama te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, longola makolo na yo na mabe.


lisusu mpo ete boyeba koteya bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo Yawe apesaki bino na nzela ya Moyize. »


Bongo yo okosala kolanda mikano oyo bango bakopesa yo na esika oyo Yawe akopona. Sala keba ete osala makambo nyonso oyo bakotinda yo.


mpo ete atombola te na lolendo liboso ya bandeko na ye to abima te libanda ya mibeko na yango. Boye, ye elongo na bakitani na ye bakowumela tango molayi na bokonzi kati na Isalaele.


Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango : bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe.


Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango.


Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino ; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu.


Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu,


Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala.


Boyika mpiko mpe bosenzela mpo na kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize ; bokende libanda na yango te.


Akopesa mingi-mingi etumbu epai ya ba-oyo, mpo na lokoso na bango ya makambo ya mbindo, batambolaka kolanda baposa mabe ya nzoto mpe batiolaka bokonzi ya Nkolo. Lokola bateyi yango ya lokuta batondi na lolendo mpe bamimonaka lokola bakoka na nyonso, babangaka te kofinga bikelamu ya nkembo ;


Ezali mpe ndenge moko mpo na bato wana : makanisi na bango etindikaka bango na kobebisa banzoto na bango, na kotiola bokonzi ya Nkolo, mpe na kofinga bikelamu ya nkembo ya Likolo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ