Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 16:6 - Mokanda na Bomoi

6 Ezali kaka na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona mpo na kotia Kombo na Ye nde bokobonza mbeka ya Pasika. Bokosala yango na pokwa, tango moyi elalaka, ngonga oyo obimaki na Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 16:6
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo.


Basengeli kosepela yango na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale ; bakolia mwana meme elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.


Bosala feti yango na tango oyo ekatama, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza oyo, kolanda mibeko mpe malako na yango nyonso. »


Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale.


Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende.


Okoki te kobonza mbeka ya Pasika kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi yo.


Soki ezalaki bongo, mbele Klisto anyokwamaki mbala ebele wuta na ebandeli ya mokili. Nzokande sik’oyo, na mikolo oyo ya suka, amonani mbala kaka moko mpo na kolongola masumu na nzela ya mbeka na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ