Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 16:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tika ete levire emonana te epai na yo, kati na mokili na yo nyonso mikolo sambo. Kotika te ete nyama oyo babonzi na pokwa ya mokolo ya liboso etikala kino na tongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 16:4
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto.


Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.


Bokobatela yango kino na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango. Na mokolo yango, bato nyonso ya lisanga ya Isalaele bakokata yango kingo na pokwa.


Na butu ya mokolo yango, bakotumba mosuni na yango na moto mpe bakolia yango elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo.


Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo, mpe eloko moko te oyo ezali na levire ekomonana kati na mokili na bino mobimba.


Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo.


Okobonzela Ngai te makila ya nyama elongo na mapa batia levire ; okobomba te kino lobi na tongo mbeka oyo babonzi mpo na Pasika.


Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »


Okoki te kobonza mbeka ya Pasika kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ