Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Deteronomi 16:22 - Mokanda na Bomoi

22 Okotelemisa te libanga ya bule, pamba te Yawe, Nzambe na yo, ayinaka nyonso wana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Deteronomi 16:22
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Batongaki lisusu mpo na bango moko bisambelo ya likolo ya bangomba, mabanga ya bule, makonzi ya bule mpo na Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mobesu.


Batelemisaki mabanga ya bule mpe makonzi ya nzambe mwasi Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu.


Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele.


Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera.


Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. ›


Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.


bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta ; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe.


Bokoki te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, ndenge bango basalaka. Pamba te Yawe amonaka yango lokola likambo ya nkele mpe ayinaka makambo oyo basalaki mpo na banzambe na bango : bazalaki ata kotumbaka na moto bana na bango ya mibali mpe ya basi lokola mbeka mpo na banzambe na bango.


Bomibebisa te na kosala ekeko, elilingi ya mwasi to ya mobali,


Bozala na bokebi mpe bobosana te boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki elongo na bino. Mpe bomisalela ekeko te na lolenge nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apekisaki.


Tango bokozala na bana mpe bakoko, mpe bokowumela tango molayi na mokili, soki bokosami mpe bosali ekeko ya lolenge nyonso, soki bosali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na bino, soki botumboli kanda na Ye,


Kati na Lingomba na yo, ozali mpe na bato oyo bakangama na mateya ya bato ya lingomba ya Nikola.


Kasi ezali na likambo moko oyo nasepelaka na yango epai na yo : olingaka te misala ya bato ya lingomba ya Nikola, oyo Ngai mpe nalingaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ