Yawe akobeta Isalaele, mpe Isalaele akoningana lokola nzete oyo ebotaka na mayi, oyo mayi ezali koningisa ; akopikola Isalaele wuta na mabele ya malamu oyo apesaki na bakoko na ye mpe akopanza bango mosika ya ebale Efrate, pamba te balamusi kanda ya Yawe na kosalaka makonzi ya bule mpo na Ashera.
Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera ; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala.
Atiaki kati na Tempelo ya Yawe ekeko ya Ashera, oyo asalisaki ; nzokande, Yawe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali : « Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele.
Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
Tala makambo oyo bosengeli kosala bango : bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko,